Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo ; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te.
Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.
Kasi sik’oyo, lokola tokufi mpo na nguya oyo ezalaki kokanga biso na bowumbu, tokangolami na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika ya Molimo, kasi na lolenge ya kala ya mokanda ya Mobeko te.