4 Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu.
Kasi sik’oyo, lokola tokufi mpo na nguya oyo ezalaki kokanga biso na bowumbu, tokangolami na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika ya Molimo, kasi na lolenge ya kala ya mokanda ya Mobeko te.
Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.
Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko : tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.
Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.
Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto