Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 6:3
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;


Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.


Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.


pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.


Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo ?


Nzokande, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.


Bandeko—nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko— bobosani ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka na tango oyo azali na bomoi ?


babatisamaki bango nyonso mpo na Moyize kati na lipata mpe kati na ebale monene,


Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.


Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi bakosala nini ? Soki bakufi bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaki libatisi mpo na bango ?


Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino ?


Lolendo na bino ezali kitoko te ! Boyebi te ete mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya mapa ?


Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ?


Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,


Boyebi te ete bato oyo basalaka kati na Tempelo baliaka bilei kowuta na Tempelo, mpe ete ba-oyo basalaka na etumbelo bazwaka eteni na bango kati na mbeka oyo ebonzami na etumbelo ?


Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.


Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.


pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ