Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 6:18 - Mokanda na Bomoi

18 bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 6:18
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.


Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te opesaka ngai bososoli na yango.


Nakobika na bonsomi ya solo, pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo.


Oh Yawe, Nzambe na biso, atako bakonzi mosusu bakambaki biso, kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo.


Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.


« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama


Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.


Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.


Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.


Moto nyonso oyo asilaki kokufa atangamaki lokola moto ya sembo : azali lisusu te na se ya bokonzi ya lisumu.


Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.


Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.


botambolaka lokola bansomi, kasi bosalelaka bonsomi na bino te lokola vwale mpo na kozipa mabe na bino, pamba te bozali bawumbu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ