Barome 6:13 - Mokanda na Bomoi13 Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nabukodonozori alobaki : — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama ; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema ! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.