Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Akufaki mpo na lisumu mbala moko mpo na libela ; kasi sik’oyo azali na bomoi, mpe azali na bomoi mpo na Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 6:10
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.


Boye bino mpe, bomimona lokola bakufi mpo na lisumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Yesu-Klisto.


Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te ; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.


Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.


Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


Yango wana mpe kutu Yesu ateyaki Sango Malamu ata epai ya bato oyo bazali sik’oyo ya kokufa mpo ete basambisama kolanda mibeko ya bato na oyo etali nzoto mpe babika bomoi kolanda mokano ya Nzambe na oyo etali Molimo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ