Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 5:20
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene.


Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.


Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo ! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka !


Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki.


Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.


Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.


Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.


Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.


Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu ; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango.


pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.


Boye, toloba nini ? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka ?


Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ