Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.
Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.
Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.
Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu ! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele.
Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :