Barome 5:17 - Mokanda na Bomoi17 Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.