Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 5:13 - Mokanda na Bomoi

13 Solo, liboso ete Nzambe apesa Mobeko, lisumu ezalaki kati na mokili, kasi lisumu ekoki kotangama te soki Mobeko ezali te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 5:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.


Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza.


Tika ete tomelisa tata na biso masanga ya vino mpe tosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »


Boye bana basi oyo mibale ya Loti bakomaki na zemi ya tata na bango.


Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako.


Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.


Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe ; yango wana Yawe abomaki ye.


Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.


pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.


Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko.


Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.


Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mibeko ya Nzambe ; pamba te kosala lisumu ezali : kobuka mibeko ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ