Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Makomi elobi nini ? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 4:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.


Mpo na yango, Pineasi atangamaki lokola moto ya sembo mpo na bikeke nyonso, seko na seko.


Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.


Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.


Nanu botanga Makomi oyo te : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ?


Makomi eloba : « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »


Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele :


Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo,


Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.


Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te ? Solo, tozali koloba : Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.


Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon : « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »


Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi : « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ