ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.
Kasi soki mobali na ye alobi na ye eloko moko te kino na mokolo oyo ekolanda, elakisi ete asili kondima ndayi nyonso to ekateli nyonso oyo mwasi na ye azwaki. Andimi yango, pamba te alobi eloko moko te tango ayokaki yango.
Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,
mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto : Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.
Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.