13 Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bapesamelaki elaka ya kozwa mokili lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima.
Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
Elingi koloba ete bana nyonso oyo Abrayami abotaki bazali bakitani na ye te, kasi ezali kaka bana oyo abotaki kati na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye.
Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.