bato oyo balobaka : ‹ Zala mosika na Ngai, kopusana pene na Ngai te, pamba te nazali bule makasi na miso na yo ! › Bato ya lolenge oyo bazali lokola milinga na zolo na Ngai, lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso.
Solo, Nzambe amonisaka kanda na Ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu, na lisumu mpe na mabe nyonso ya bato oyo bazipaka bosolo na nzela ya misala na bango ya mabe,
Boye, nasala nini ? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.
Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?
Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. »
Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.
Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo ; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango.