Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 3:8
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, alobaki na Yoanani, mwana mobali ya Karea : — Kosala bongo te ! Makambo oyo ozali koloba mpo na Isimaeli ezali makambo ya lokuta.


Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai !


Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka


Boye, toloba nini ? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka ?


Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te !


Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.


Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.


kati na lokumu mpe soni, kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe. Mpe lisusu, kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta, nzokande tolobaka solo ;


Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ