Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini ? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye ? Nazali kaka kokanisa lokola moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 3:5
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Boni, Nzambe abukaka mibeko, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ?


Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.


Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.


Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


To soki lokuta na ngai etalisi polele bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu ?


Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso ? Azwaki nini na bomoto ?


Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.


Boye, toloba nini ? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka ?


Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu.


Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


Boye, toloba lisusu nini ? Bapagano oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo bakomi sembo na nzela ya kondima,


Soki ezali kaka mpo na makambo ya bomoto nde nabundisaki banyama ya zamba kati na Efeso, litomba nini nazwaki ? Soki bakufi bakosekwa te, « wana tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »


Boni, ezali kaka na bomoto nde nazali koloba bongo ? Boni, mobeko elobi mpe bongo te ?


Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;


Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino : bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo.


Soki ngai natomboli lisusu biloko oyo nasilaki kobebisa, wana nazali penza mobuki mibeko.


Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ