Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama : « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 3:4
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, nazali kozwa mosika boyebi na ngai mpo na kobundela mpe kolongisa Mokeli na ngai.


Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?


Pamba te Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.


Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »


Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.


Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.


Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.


Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.


Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.


Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


Moto nyonso oyo andimi litatoli na Ye akolobaka na solo ete Nzambe azali solo.


Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.


Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.


Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.


Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te !


Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ?


Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.


Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.


Boye toloba nini ? Mabe ezali kati na Nzambe ? Soki moke te !


Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te !


Kasi lokola ezali solo ete Nzambe azali Moyengebene, maloba oyo toyebisaki bino ezali te « iyo » mpe « te. »


Kasi soki, wana tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani lisusu ete biso moko Bayuda tozali mpe basumuki lokola Bapagano, boni, elingi koloba ete Klisto azali kotombola masumu ? Ata moke te !


Nazali kolongola te ngolu ya Nzambe, pamba te soki ezali na nzela ya kotosa Mobeko nde bato bakomaka sembo, wana Klisto akufaki mpo na pamba. »


Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.


Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ