abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino !
Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
Tika ete matondi epesamela Nzambe oyo akangolaka ngai na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso ! Na mokuse, nakoki koloba ete, na nzela ya mayele na ngai, nazali mowumbu ya Mobeko ya Nzambe, kasi na nzela ya bomoto na ngai ya masumu, nazali mowumbu ya mobeko ya lisumu.
Tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te, nakomaka mpe lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko te, mpo ete namema bango epai ya Klisto ; nzokande natosaka Mibeko ya Nzambe, pamba te natosaka Mibeko ya Klisto.
Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto ;