Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 3:3
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka, bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi, mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.


ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ;


Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki : « Nkolo, nani andimaki mateya na biso ? »


pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.


Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.


soki tozangi kondima, Ye azalaka kaka Moyengebene, pamba te akoki komiwangana te.


Pamba te, biso mpe toyokaki Sango Malamu lokola bango ; kasi mateya oyo bayokaki esungaki bango ata na likambo moko te mpo ete bato oyo bayokaki yango bayambaki yango na kondima te.


Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ