14 Minoko na bango etonda na makambo ya bololo mpe na bilakeli mabe.
Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu ; abongisaka kaka pasi mpe mabe.
Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.
Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe.
Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo.