Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 3:11 - Mokanda na Bomoi

11 moto ya mayele azali te ; ata moto moko te alukaka Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 3:11
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo mabe mpe ya nkele ; moko te asalaka bolamu.


Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.


Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !


Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.


« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! ›


Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Kolanda ndenge ekomama : « Moto ya sembo azali te, ata moko te ;


Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moko te.


Baposa ya nzoto etombokelaka Nzambe, etosaka Mobeko ya Nzambe te mpe ekotikala kotosa yango ata moke te.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ