Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 2:24 - Mokanda na Bomoi

24 Mpo na yango, kolanda ndenge ekomama : « Likolo na bino, Kombo ya Nzambe ezali kofingama kati na Bapagano. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 2:24
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.


Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.


Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai.


Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.


Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.


komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.


salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.


Bato ebele bakolanda bango kati na mobulu na bango, mpe nzela ya bosolo ekofingama likolo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ