Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 2:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nzokande, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka kolanda bosolo bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 2:2
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.


Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.


Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.


liboso ya Yawe, pamba te azali koya ! Solo, azali koya kosambisa mabele ; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.


liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo.


Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili ; nalobaki te na bakitani ya Jakobi : ‹ Boluka Ngai kati na pamba ! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.


Botelema mpe bopesa sango, boloba makambo na bino mpe tosamba elongo ! Nani asakolaki yango wuta kala mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka ? Ezali Ngai Yawe te ? Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi ; mosusu azali te, soki Ngai te.


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Bozali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka ! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te ? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo !


Libota ya Isalaele ezali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, nzela na Ngai ezali sembo te ? Boni, ezali te penza banzela na bino nde ezangi bosembo ?


Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.


Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.


Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani ; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango.


Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana mpe osalaka makambo yango kaka lokola bango ?


Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.


Boye toloba nini ? Mabe ezali kati na Nzambe ? Soki moke te !


Bongo nayokaki anjelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi koloba : « Oh Mosantu, Yo oyo ozali mpe ozalaki, ozali penza sembo, mpo ete okati bongo na bosembo na Yo !


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ