Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
Namilobelaki kati na ngai : « Nzambe akosambisa, ezala bato ya sembo to bato mabe, pamba te ezali na tango mpo na likambo moko na moko, mpe ezali na tango mpo na kosambisa likambo moko na moko. »
Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala,
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.
Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :
Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.