Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 2:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.


Mokonzi alobaki lisusu na Shimei : — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.


nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ; motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.


pamba te, oyebi malamu, kati na motema na yo, ete yo mpe otiolaka bato mosusu mbala mingi.


Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,


Polo atalaki bato nyonso ya Likita-Monene mpe alobaki : — Bandeko na ngai, kino na moyi ya lelo, nazali kotambola na motema ya peto liboso ya Nzambe.


Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.


Soki Bapagano oyo bayebi Mobeko te bazali kosala na ndenge na bango moko makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko atako bazali na Mobeko yango te.


Moto oyo akatisa ngenga te kasi atosaka Mobeko akosambisa yo oyo obukaka Mobeko atako ozali na Makomi ya Mobeko mpe okatisa ngenga.


Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu :


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.


Ezali bato ya bilongi mibale nde bakobanda kokosa bango na nzela ya mateya, pamba te mitema ya bato yango ya bilongi mibale ebeba lokola nde bazikisa yango na ebende ya moto.


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ