Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 2:11 - Mokanda na Bomoi

11 pamba te Nzambe aponaka bilongi te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 2:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »


Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.


Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;


Banongi yango batunaki Yesu : — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe.


Petelo azwaki maloba mpe alobaki : — Sik’oyo, nasosoli solo ete Nzambe atalaka bilongi te,


Boye toloba nini ? Mabe ezali kati na Nzambe ? Soki moke te !


Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai ; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.


Bongo mpo na bino bankolo, bosalaka mpe ndenge wana epai ya bawumbu na bino. Bobangisaka bango te, lokola boyebi malamu ete Nkolo na bango, oyo azali kati na Likolo azali mpe Nkolo na bino mpe aponaka bilongi te.


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,


Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.


Moto oyo asalaka na ndenge ya mabe akozwa lifuti oyo ebongi mpo na misala na ye ya mabe, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.


Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ