Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 2:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani ; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 2:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu azongiselaki ye : — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula ?


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ;


Boye, batela mpo na yo moko liboso ya Nzambe, kondima oyo ozali na yango. Esengo na moto oyo amikweyisaka te na nzela ya makambo oyo andimaka !


Nzokande, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka kolanda bosolo bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana.


Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana mpe osalaka makambo yango kaka lokola bango ?


Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato mosusu ? Te, soki moke te ! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu.


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo !


Oh zoba ya moto ! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba ?


Bandeko na ngai, botonganaka te bino na bino. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye asambwisaka mibeko mpe abukaka yango. Nzokande, soki ozali kosambwisa mibeko, elakisi ete ozali kotosa yango te, kasi ozali nde mosambisi na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ