5 Bopesa mpe mbote na Lingomba oyo esanganaka na ndako na bango. Bopesa mbote na Epayineti, molingami na ngai, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto kati na mokili ya Azia.
Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia.
Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Kolinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi,
Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.
Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.
Mangomba ya Azia etindeli bino mbote. Akilasi mpe Prisika, elongo na Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na bango, bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo.
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba :
pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango : « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.
Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.