2 Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.
Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.
Mbala moko, Petelo akendeki elongo na bango ; mpe tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufisa mibali bayaki kozingela ye, bazalaki kolela mpe kolakisa ye banzambala mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki, wana azalaki nanu elongo na bango.
Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.
Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote. Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [
Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.
Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,