Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 16:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 16:17
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.


Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.


Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke.


pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?


Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu.


Bandeko, bino nyonso bolanda ndakisa na ngai mpe bomekola ezaleli ya bato oyo bazali kotambola lokola biso.


Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.


Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.


Ndenge nasengaki na yo tango nazalaki na Masedwane, tikala awa kati na Efeso mpo ete opesa bato mosusu mitindo ete batika koteya mateya ya lokuta


bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !


Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba ;


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ