16 Bopesanaka mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote.
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze ;
Bandeko nyonso batindeli bino mbote. Bopesanaka bino na bino mbote na nzela ya beze ya bule.
Bopesanaka mbote na beze ya bule. Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote.
Bopesaka bandeko nyonso mbote na nzela ya beze ya bule.
Bopesanaka bino na bino mbote, na beze ya bondeko. Tika ete kimia ezala na bino nyonso oyo bozali kati na Klisto !