Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.
Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo ! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.
Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.
Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.
Ngai mpaka ; Epai ya mwasi moponami ya Nzambe, mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.