12 Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.
Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.
Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi : ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.