Bopesa mbote na Andronikusi mpe na Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela.
Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.
Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato : nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi.
Elongo na bango, tozali kotinda ndeko na biso, oyo tondimaka mbala na mbala bolingo na ye. Mpe na mbala oyo, azali na yango lisusu koleka, pamba te azali penza kotiela bino motema.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te.
Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.