Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.
Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.
Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko ? Boni, tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya kopesa bino mikanda ya matatoli to ya kosenga bino mikanda ya matatoli ?