9 Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »
Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
Lokumu na ngai, lamuka ! Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.
Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda,
Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.