Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 15:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 15:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo ayambaka bino ayambaka nde Ngai, mpe moto oyo ayambaka Ngai ayambaka nde Motindi na Ngai.


— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.


mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.


Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.


Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.


Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »


oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe.


mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.


Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,


Boyikanaka mpiko ; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ