Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 15:6 - Mokanda na Bomoi

6 mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 15:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.


Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe ; balobaki : — Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ;


Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.


Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso :


Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te.


mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


Tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tango tosambelaka mpo na bino,


Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo


Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye : Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ