Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama moko ya Rome, kati na mampinga ya mokonzi monene.
Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te ; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango.
Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema.