Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 15:31 - Mokanda na Bomoi

31 mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 15:31
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.


epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendeki kokutana na ye mpo na kofunda Polo. Babondelaki mingi Festisi


Festisi alobaki : — Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo ! Lisanga mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye, na Yelusalemi mpe awa kati na Sezarea, bazalaki koganga ete asengeli kokufa.


Ananiasi azongisaki : — Nkolo, bato ebele bayebisi ngai makambo na tina na moto yango mpe mabe nyonso oyo asali babulami na Yo, na Yelusalemi.


Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.


Nzokande sik’oyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi.


Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.


Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu,


mpe basengaki biso kutu na molende nyonso ete tosalela bango ngolu ya kosangana elongo na biso kati na mosala ya kosunga basantu.


Mpo na ngai, ezali na tina te ya kokomela bino na tina na lisungi ya kopesa na basantu,


Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.


Ezali bango Bayuda nde babomaki Nkolo Yesu mpe basakoli ; ezali mpe kaka bango nde banyokolaki biso. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso ;


Bobondelaka mpe mpo ete Nzambe akangola biso wuta na maboko ya bato mabe mpe ya batomboki, pamba te bato nyonso bazali na kondima te.


minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.


Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ