21 kasi kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo babetela bango nanu lisolo te na tina na Ye bakomona, mpe ba-oyo bayoka nanu sango na Ye te bakososola. »
ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.
« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! ›
Nanu botanga Makomi oyo te : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ?