20 Pamba te nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Klisto eyebanaki nanu te, mpo ete natonga na likolo ya moboko ya moto mosusu te,
Yango wana nazali penza na posa makasi ya koteya Sango Malamu epai na bino oyo bozali na Rome.
Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu ! »
ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.