Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 15:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 15:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.


Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te ; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.


Tika ete moto moko te aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya moto mosusu !


Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.


ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.


Bandeko, toloba lisusu nini ? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na lokota oyo eyebani te, mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


Kasi moto oyo asakolaka alobaka nde na bato mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango.


Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.


Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.


mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.


Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ