Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 14:6 - Mokanda na Bomoi

6 Moto oyo akesenisaka mikolo asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo. Moto oyo aliaka bilei nyonso asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe ; mpe moto oyo aponaka bilei asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 14:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.


Lokola Yawe akengelaki butu wana mpo na kobimisa bana ya Isalaele na Ejipito, butu yango ekomi ya Yawe : ekobanda kozala butu ya kokengela mpo na bana ya Isalaele na milongo na bango nyonso oyo ekoya.


Moyize ayebisaki bango : — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.


Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka ?


Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.


Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.


Batunaki Ye lisusu : — Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ?


Bozali kotosa mikolo, basanza, bileko mpe mibu !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ