Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 14:20
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.


Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.


Mongongo yango elobaki na ye, mpo na mbala ya mibale : — Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te !


Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.


Likambo oyo eleki malamu ezali : koboya kolia misuni, koboya komela vino, koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku.


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ