Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 14:2 - Mokanda na Bomoi

2 Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 14:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.


Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso.


Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.


« Nabondeli yo, meka basali na yo mikolo zomi : pesa biso kaka bandunda lokola bilei mpe mayi mpo na komela ; kopesa biso eloko mosusu te !


Boye, mosali yango akomaki kotia pembeni bilei mpe vino oyo bazalaki kobongisela bango mpe kopesa bango kaka bandunda.


Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.


Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.


Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.


Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.


Boliaka nyonso oyo etekamaka na zando, na komipesa mituna te na tina na yango, noki te bobebisa mitema na bino.


Kasi bosala keba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na bato oyo balenda te kati na kondima.


Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.


Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano ; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.


Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ