Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 14:11 - Mokanda na Bomoi

11 Pamba te ekomama : « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 14:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye, mpe bikolo nyonso ekosalela ye.


Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga : bana na yo nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.


Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.


Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe : ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino : liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. ›


Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »


Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe,


Yebisa bango : « Nalapi ndayi, » elobi Yawe, « nakosalela bino makambo nyonso oyo nayoki bino koloba.


Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye ;


Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika ;


Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »


Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe.


Bato ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili, bazali kobungisa bato mingi nzela ; bandimaka te ete Yesu-Klisto akomaki penza moto. Moto nyonso oyo alobaka ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Klisto.


Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ