Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 14:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo yo, mpo na nini ozali kosambisa to kotiola ndeko na yo ? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 14:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.


Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.


Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te.


Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :


Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.


Lisusu, Tata asambisaka bato te ; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana,


Apesaki biso mitindo ya koteya bato mpe kotatola ete Ye nde Nzambe apona lokola Mosambisi ya bato ya bomoi mpe bakufi.


Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.


Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »


Nyonso wana ekomonana polele, na mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ