Solo, mibeko ya bongo emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka na bato ete basambelaka ndenge balingi, bamilakisaka lokola bato ya komikitisa mpe bamipesaka pasi na nzoto ; nzokande ezali na tina moko te, soki kaka te kokokisa baposa ya nzoto.
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.