Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 12:3 - Mokanda na Bomoi

3 Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 12:3
47 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.


Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.


Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo to ya kozala moto ya bwanya ; mpo na nini komibebisa ?


Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.


Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


Ezali na nzela na Ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na kosala ete na Kombo na Ye, Bapagano batosa Ye na nzela ya kondima.


Olobi malamu ! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.


Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.


Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.


Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso.


Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo ; tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino.


Eloko nini penza bino bozwaki te koleka Mangomba mosusu, longola kaka kozanga komemisa bino mokumba na ngai ? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango !


Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.


Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.


Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino


Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto.


Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


Ezali mpo na yango nde nasalaka mpe nabundaka na nzela ya makasi ya Klisto, oyo esalaka na nguya kati na ngai.


Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso,


Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.


kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.


Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,


Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe,


Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.


mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango,


Lendisa mpe bilenge mibali ete bamibatelaka malamu.


Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.


Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


Nakomelaki Lingomba mokanda moko ya mokuse ; kasi Diotrefi, oyo alingaka kaka kozala mokonzi na makambo nyonso, akoyamba biso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ